Confidentialité

Page oyo elimboli ndenge EKOKI(N) ezwaka, esalela mpe ebatelaka ba informations oyo botindaka na plateforme.

EKOKI(N)

Equipe oyo elandelaka données

Suivi ya données esalemaka na équipe projet EKOKI(N). Cadre juridique ya suka ekoki koyebisama lisusu tango projet ekobongisama officiellement.

Ebongisami suka : 2 juillet 2026

Contact mpo na confidentialité

Mpo na kosenga kotala, kobongisa to kolongola information personnelle, koma na équipe projet.

emeraude.ekoondo@rjbc.be

Ba données oyo ekoki kozwama

Ba données oyo ekoki kozwama

  • Contact mpo na suivi, kaka soki yo moko oponi kotika yango.
  • Position GPS to coordonnées ya zone oyo osignalé, mpo na ko vérifier mpe ko localiser signalement.
  • Ba photo oyo etindami na signalement, mpe metadata oyo ezali utile soki ezali, lokola date ya photo to position GPS.
  • Informations oyo elimboli zone, lolenge ya problème, besoin ya intervention to éléments ya vérification.
  • Informations ya ba comptes administrateurs, mpo na kobatela accès ya espace admin.
  • Données techniques ya moke mpo site esala malamu, sécurité mpe koboya abus.

Collecte ya données ezali limité na besoin ya projet

EKOKI(N) ezwaka kaka informations oyo esengeli mpo na ko vérifier signalement, ko documenter zone mpe kobongisa coordination ya déchets mpe environnement urbain na Kinshasa.

Mpo na nini données esalelamaka

Données oyo esalelamaka mpo na ko vérifier signalements, koboya doublons, ko relier signalements ebele na zone moko, kolanda besoins ya terrain mpe kobongisa informations oyo ebimaka na site.

Oyo ekoki kobima public

Signalement ebimaka public automatiquement te. Sima ya vérification, kaka informations oyo ezali utile mpo na public ekoki komonana : zone, commune, type ya problème, statut, photos validées mpe informations ya suivi. Ba contacts ebimisamaka te.

Ndenge données esalelamaka

Informations etindamaka volontairement mpo na kosunga EKOKI(N). Formulaire esengaka accord avant envoi. Sima, données esalelamaka mpo na vérification, modération, coordination mpe kobongisa informations.

Nani akoki komona yango

Informations oyo ebimi public te emonanaka kaka na administrateurs autorisés ya EKOKI(N). Données publiques ezalaka kaka oyo e vérifier to oyo esalisaka bato ba comprendre zones.

Hébergement mpe services

Site ezali hébergé na Vercel mpe données ebombami na Supabase. Ba photos ebombami na stockage Supabase. Assistant IA, soki esalelami na admin, ezali kaka aide interne ya vérification mpe ezwaka décision na esika ya moto te.

Kobomba données

Informations ebombamaka tango esengeli mpo na vérification, suivi ya signalement, historique ya zones mpe amélioration ya base de données. Signalements rejetés to oyo esengeli lisusu te ekoki kolongolama to ko anonymiser.

Cookies

Na étape oyo, EKOKI(N) esaleli te cookies ya publicité to statistiques. Cookies techniques ekoki kosalelama mpo na connexion admin mpe fonctionnement ya site. Soki outils ya audience ebakisami sima, page oyo ekobongisama.

Sécurité

Accès admin ezali kaka mpo na comptes autorisés. Ba clés techniques sensibles emonisamaka public te. Données oyo e valider nanu te etikalaka privées tii décision ya équipe projet.

Ba droits na yo

Okoki kosenga kotala, kobongisa to kolongola informations personnelles oyo otindaki. Ba demandes ekoki kotindama na équipe projet EKOKI(N) na adresse oyo ezali awa.

Eloko ya ko confirmer

Page oyo epesi information claire mpo na phase pilote. Ezali audit juridique complet te. Ba mentions ekoki kobongisama tango gouvernance officielle ya projet ekozala claire.